Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Ezayi 44

44
Koponama ya Isalaele
1Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai,
Isalaele oyo naponaki !
2Tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo asalaki yo,
abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo
mpe asungaka yo :
Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ;
yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
3Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka,
mpe bibale, na mabele ya kokawuka ;
nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo
mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
4Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu
lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
5Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, ›
mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi,
kino mosusu akokoma na loboko na ye :
‹ Nazali ya Yawe, ›
mpe akozwa kombo ya Isalaele.
Ebandeli mpe suka
6Tala liloba oyo Yawe,
Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele,
Mokonzi ya mampinga, alobi :
Nazali ebandeli mpe nazali suka ;
Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
7Nani azali lokola Ngai ? Tika ete atatola yango ;
tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngai
makambo oyo esalema wuta kala,
wuta tango nasala bato oyo,
mpe makambo oyo ekoya !
Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya !
8Bolenga te, bobanga mpe te.
Boni, natatolaki yango te ?
Nasakolaki yango te wuta kala ?
Bozali batatoli na Ngai.
Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ?
Te, ezali na Libanga mosusu te,
nayebi ata moko te. »
Ndenge basalaka banzambe ya bikeko
9Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba,
mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ;
esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te
mpe eyebaka ata eloko moko te ;
boye, bayokisama soni.
10Nani asala nzambe to ekeko ya ebende
mpo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye ?
11Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ;
basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso !
Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ;
bakokweya na somo mpe na soni.
12Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo,
asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto ;
asalaka ekeko na marto
mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye ;
nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye ;
soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye !
13Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi,
akomaka elilingi na ekomeli ya motane,
asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi,
abongisaka mondelo na yango na lime
mpe apesaka yango lolenge ya moto,
ndenge kaka moto azalaka kitoko,
mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.
14Akataka banzete ya sedele ;
mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni ;
atikaka yango ekola kati na banzete ya zamba
mpe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa.
15Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto,
akataka yango mpo na koyetola moto
to mpo na kobelisa mapa ;
kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka ;
asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka.
16Akotia ndambo ya nzete yango na moto,
bongo akolamba na yango mosuni,
akotumba mosuni na ye
mpe akolia yango kino akotonda ;
akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba :
« Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi ! »
17Mpe na ndambo oyo etikali,
oyo asalaki na yango nzambe,
nzambe na ye ya ekeko,
akofukamela yango mpe akosambela yango ;
akosambela yango mpe akoloba :
« Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! »
18Bayebi eloko moko te,
bazali na bososoli te ;
miso na bango ekangama, emonaka te ;
mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.
19Moko te akanisaka,
moko mpe te azalaka na boyebi
mpe na mayele mpo na koloba :
« Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto,
nabelisaki mapa na makala na yango ya moto,
natumbaki mosuni mpe naliaki yango.
Bongo mpo na oyo etikali,
nasala na yango penza likambo ya nkele boye ?
Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? »
20Makanisi na ye ekangama na putulu,
motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ;
akokoka te komikangola mpe koloba :
« Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali
ezali lokuta te ? »
Yawe akosikola bato na Ye
21« Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo,
pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai.
Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ;
oh Isalaele, nakobosana yo te.
22Nalongoli mabe na yo lokola lipata,
masumu na yo lokola lipata ya tongo.
Zonga epai na Ngai,
pamba te nasili kosikola yo. »
23Oh Lola, yemba banzembo ya esengo,
pamba te Yawe nde asali bongo !
Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo !
Oh bino bangomba,
bazamba mpe banzete nyonso kati na yango,
boyemba banzembo ya elonga !
Pamba te Yawe asikolaki Jakobi,
amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
24« Tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo azali Mosikoli na yo,
oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo :
Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso,
Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa,
Ngai moko nde natandaki mabele.
25Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ;
natie mobulu kati na molimo ya bato
oyo balobaka makambo ekoya,
nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya
mpe nakomisi mayele na bango liboma.
26Nakokisi maloba ya mosali na Ngai
mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai.
Natatoli na tina na Yelusalemi :
‹ Bato bakovanda kati na yo ; ›
na tina na bingumba ya Yuda :
‹ Ekotongama lisusu, ›
mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana :
‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
27Nalobi na ebale monene :
‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! ›
28Nalobi na tina na Sirisi :
‹ Azali mobateli oyo naponi,
akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai.
Akoloba na tina na Yelusalemi :
‘ Tika ete etongama lisusu, ’
mpe na tina na Tempelo :
‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »

Currently Selected:

Ezayi 44: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo