Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Oze 4

4
Masumu ememaka na libebi
Kosambisama ya Isalaele
1Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe !
Pamba te Yawe azali kosamba
na bino, bavandi ya mokili,
mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe
ezali lisusu te kati na mokili ;
2etikali kaka kolakelana mabe, lokuta,
makambo ya somo, moyibi, kindumba,
mobulu mpe kobomana se kobomana.
3Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa,
bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto,
nyama ya zamba, ndeke ya likolo
mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.
4Kasi tika ete moto moko te amilongisa
to apamela moninga na ye,
pamba te bato na yo bazali lokola bato
oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe !
5Bokobeta mabaku, na moyi makasi ;
basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu,
mpe nakobebisa mama na bino.
6Bato na Ngai bakobebisama
mpo ete bazangi boyebi.
Lokola bobwaki boyebi,
Ngai mpe nakobwaka bino
mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai.
Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino,
Ngai mpe nakobosana bana na bino.
7Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele,
ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai.
Nakobongola nkembo na bango soni.
8Banganga-Nzambe baliaka
na sima ya masumu ya bato na Ngai
mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.
9Makambo oyo ekokomela bato yango
ekokomela mpe Banganga-Nzambe :
nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko
mpo na etamboli na bango
mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.
10Bakolia, kasi bakotonda te ;
bakosala kindumba, kasi bakobotana te ;
pamba te basundolaki Yawe
11mpo na komipesa na kindumba,
na masanga ya vino ya kala mpe ya sika
oyo elongolaka bato bososoli.
12Bato na Ngai bakomi kotuna toli
epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete,
mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango.
Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango,
bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
13kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi,
kotumba ansa lokola mbeka ya malasi
na likolo ya bangomba mikuse,
na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko
lokola sheni, pepiliye mpe terebente !
Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba,
mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
14Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi
mpo na kindumba na bango
to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ;
pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba
mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo.
Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !
15Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo,
tika ete Yuda amikweyisa te !
Kokende na Giligali te,
komata na Beti-Aveni te
mpe kolapa ndayi te na koloba :
« Na Kombo na Yawe ! »
16Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi
lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki,
ndenge nini Yawe akoka koleisa bango
lokola bana meme kati na bilanga minene ?
17Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko :
tika ye akoba bongo !
18Soki kaka asilisaka komela vino,
amipesaka na kindumba ;
bakambi na yango balingaka makambo
oyo eyokisaka bango soni.
19Mopepe moko ya makasi ekomema bango,
mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.

Currently Selected:

Oze 4: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo