Esidrasi 5
5
Misala ya kotonga Tempelo ezongeli
1Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango. 2Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango. 3Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango :
— Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?
4Batunaki lisusu :
— Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani ?
5Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi.
Mokanda epai ya mokonzi Dariusi
6Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi. 7Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango :
« Epai ya mokonzi Dariusi.
Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia !
8Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango.
9Totunaki bakambi na bango motuna oyo : ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir ? › 10Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango.
11Kasi tala eyano oyo bapesaki biso :
‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se ; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango. 12Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.
13Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe, 14alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli. 15Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’
16Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. ›
17Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. »
Currently Selected:
Esidrasi 5: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.