Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Ezekieli 42

42
Bashambre ya Banganga-Nzambe
1Moto yango amemaki ngai kino na lopango ya libanda, na nzela oyo ekenda kino na ngambo ya nor ; bongo amemaki ngai na ndako oyo ezalaki na bashambre ya Banganga-Nzambe, oyo na ngambo ya sude, etalana na Tempelo ; mpe na ngambo ya nor, etalana na mir. 2Ndako yango ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe tuku mibale na mitano na mokuse, mpe ekuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. 3Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda ; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi. 4Nzela moko ya bametele pene mitano na mokuse mpe bametele pene tuku mitano na molayi ezalaki liboso ya bashambre yango. Bongo, bikuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. 5Bashambre ya etaje ya likolo ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe ya se, pamba te baveranda na yango ezalaki kozwa esika mingi koleka etaje ya kati-kati mpe ya se. 6Bashambre ya etaje ya misato ezalaki na makonzi te ndenge ezalaki na lopango ya libanda. Boye, ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe oyo ya se. 7Mir ya libanda ezalaki etalana na bashambre, mpe lopango ya libanda ezalaki liboso ya ndako ya bashambre : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano. 8Bashambre oyo ezalaki pene ya lopango ya libanda ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bashambre oyo ezalaki pene ya Tempelo ezalaki bametele pene tuku mitano na molayi.
9Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda. 10Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda. 11Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi ; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor 12ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre. 13Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule. 14Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »
15Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo.
16Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 17Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 18Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 19Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 20Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.

Currently Selected:

Ezekieli 42: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo