Kobima 35
35
Misala ya kotonga Mongombo
Bana ya Isalaele bakopema na mokolo ya Saba
1Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
2— Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye. 3Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. »
Makabo mpo na misala ya Mongombo
4Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
5— Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo :
wolo, palata mpe bronze,
6langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko,
bapwale ya ntaba,
7baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale ;
banzete ya akasia,
8mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda,
biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
9mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
10Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi :
11Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ;
12Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,
13mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe,
14etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda,
15etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,
16etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso,
sani ya bronze mpe evandelo na yango,
17batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango,
18bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,
19bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. »
20Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize. 21Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule. 22Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango. 23Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango. 24Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe ; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso. 25Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. 26Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba. 27Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. 28Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko. 29Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
Betisaleyeli mpe Oliabi baponami mpo na kotonga
30Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; 31atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso : 32mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze, 33mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. » 34Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala. 35Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.
Currently Selected:
Kobima 35: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.