Deteronomi 8
8
Yawe ateyaki bato na Ye kati na esobe
1Salela na bokebi mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo mpo ete bokoka kovanda, kokoma ebele, kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe alakaki epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi.
2Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te. 3Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe. 4Bilamba na yo etikalaki konzuluka te mpe makolo na yo etikalaki kovimba te na mibu wana tuku minei. 5Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye. 6Tosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na yo, na kotambolaka na banzela na Ye mpe na kopesaka Ye lokumu. 7Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ; 8mokili oyo etonda na ble, na orje, na vino, na banzete ya figi, na banzete ya grenade ; mokili ya mafuta ya olive mpe ya nzoyi ; 9mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako#8.9 Motako elakisi na lifalanse : cuivre. na bangomba. 10Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino.
11Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo. 12Tango okolia mpe okotonda, tango okotonga bandako ya kitoko mpe okovanda kuna, 13tango bangombe na yo, bantaba na yo mpe bameme na yo ekobotana mingi, tango palata na yo mpe wolo na yo ekokoma ebele mpe biloko nyonso oyo ozali na yango ekokoma ebele ; 14sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, 15oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto#8.15 Koto elakisi na lifalanse : scorpion. mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi.
16Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu. 17Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » 18Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.
19Soki obosani Yawe, Nzambe na yo, soki osaleli banzambe mosusu, soki ogumbameli mpe ofukameli yango, nalobi na bino solo lelo ete bokobebisama. 20Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.
Currently Selected:
Deteronomi 8: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.