Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Deteronomi 18

18
Makabo mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi
1Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele ; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango. 2Basengeli te kozala na libula kati na bandeko na bango ; Yawe nde azali libula na bango ndenge alakaki bango.
3Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka : lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala. 4Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo ; 5pamba te Yawe, Nzambe na yo, aponi ye elongo na bakitani na ye kati na bikolo na yo nyonso mpo na kotelema mpe kosala tango nyonso mosala na Kombo na Yawe kati na Tempelo.
6Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ; 7asengeli kosala na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ndenge bandeko na ye nyonso Balevi bazali kosala kuna na miso ya Yawe. 8Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota.
Mibeko na tina na misala ya molili
9Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo, okomekola te misala ya mbindo ya bikolo oyo ezali kuna. 10Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji 11to moto oyo asalelaka makambo ya nkuku to moto oyo atunaka milimo to nganga-kisi to moto oyo asololaka na bakufi. 12Moto nyonso oyo asalaka makambo oyo, azali mbindo na miso ya Yawe ; mpe ezali mpo na makambo nyonso oyo ya nkele nde Yawe, Nzambe na bino, akobengana bikolo wana liboso na bino. 13Bosengeli kozala bato bazangi pamela liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
Mibeko na tina na mosakoli
14Bikolo oyo bokobotola ezali bikolo oyo elandaka bato wana, esalelaka kindoki mpe soloka. Kasi mpo na bino, Yawe, Nzambe na bino, akoki te kopesa bino nzela ya kosala bongo. 15Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye. 16Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. » 17Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu. 18Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye. 19Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu. 20Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.
21Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? › 22Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »

Currently Selected:

Deteronomi 18: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo