Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Misala ya Bantoma 24

24
Polo liboso ya moyangeli Felikisi
1Sima na mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ayaki na Sezarea, elongo na ndambo ya bakambi mpe molobeli Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli. 2Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo :
— Tata moyangeli Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo. 3Tata moyangeli Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza. 4Kasi, tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo : salela biso ngolu ya koyoka biso na mwa tango moke. 5Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali : kotia mobulu ; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti, 6mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye kolanda Mobeko na biso, 7kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda, ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi. 8Apesaki bato oyo bafundaki ye mitindo ete baya epai na yo.]#24.8 Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala. Soki yo moko otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo.
9Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.
10Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki :
— Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo. 11Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendeki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe. 12Mpe bato oyo bafundi ngai batikala nanu kokuta ngai te nazali kotia tembe na moto to nazali kotindika bato ete batomboka, ezala kati na Tempelo to kati na bandako ya mayangani to mpe kati na engumba. 13Bakolonga mpe te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sik’oyo. 14Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli. 15Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe. 16Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.
17Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo. 18Bakutaki ngai nasilisi komipetola kati na Tempelo ; ezalaki na ebele ya bato te elongo na ngai, mobulu mpe te. 19Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azia, oyo bazalaki wana, nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo. 20To mpe lisusu, tika ete bato oyo bazali awa baloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-Monene, 21longola kaka liloba oyo nabimisaki, wana natelemaki liboso na bango : « Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bakufi bakosekwa ! »
22Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki :
— Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.
23Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.
24Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye, Drusiye, oyo azalaki Moyuda ; abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu-Klisto. 25Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye :
— Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
26Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka.
27Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi oyo, mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo kati na boloko.

Currently Selected:

Misala ya Bantoma 24: MNB

Tya elembo

Share

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo