Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Masolo ya Kala 36

36
Yoakazi, mokonzi ya Yuda
1Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, mpe bakomisaki ye mokonzi, na Yelusalemi, mpo na kokitana na tata na ye.
(2Ba 23.31-34)
2Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. 3Mokonzi ya Ejipito alongolaki ye na bokonzi kati na Yelusalemi mpe asengaki na makasi ete mokili ya Yuda ekoma kofuta mpako mpo na mokonzi : bakilo nkoto misato na nkama minei ya palata mpe ya wolo. 4Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito.
Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda
(2Ba 23.36-37)
5Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye. 6Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni. 7Nabukodonozori amemaki mpe na Babiloni ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya bokonzi.
8Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi, misala na ye ya nkele mpe makambo oyo ekweyelaki ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Yeoyakini, mokonzi ya Yuda
(2Ba 24.8-17)
9Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato mpe mikolo zomi na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe.
10Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
Sedesiasi, mokonzi ya Yuda
(2Ba 24.18-20)
11Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. 12Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe. 13Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga. 14Bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bato bakomaki lisusu kosala mabe koleka, balandaki misala nyonso ya nkele ya bikolo ya bapaya mpe babebisaki bosantu ya Tempelo ya Yawe oyo Ye moko Yawe abulisaki na Yelusalemi.
15Yawe, Nzambe ya batata na bango, atindelaki bango, mbala na mbala mpe na ngonga malamu, makebisi na nzela ya bamemi sango na Ye, pamba te azalaki na posa ya kobatela bato na Ye mpe Tempelo na Ye. 16Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
(2Ba 25.1-21)
17Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori. 18Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye. 19Batumbaki na moto Tempelo ya Nzambe, babukaki mir ya Yelusalemi, batumbaki na moto bandako na yango ya kitoko mpe babebisaki biloko nyonso ya motuya. 20Nabukodonozori amemaki na Babiloni bato oyo babikaki na mopanga, akomisaki bango bawumbu na ye mpe ya bana na ye ya mibali kino na tango mokili ya Persi ezwaki bokonzi.
21Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »
Ndingisa ya kotonga Tempelo ya Nzambe
22Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba : 23« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »

Currently Selected:

2 Masolo ya Kala 36: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo