1
Mitango 22:28
Mokanda na Bomoi
Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami : — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato ?
Kokisana
Luka Mitango 22:28
2
Mitango 22:31
Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
Luka Mitango 22:31
3
Mitango 22:32
Anjelu ya Yawe atunaki ye : — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato ? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai.
Luka Mitango 22:32
4
Mitango 22:30
Ane elobi na Balami : — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo ? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye ? Balami azongisaki : — Te !
Luka Mitango 22:30
5
Mitango 22:29
Balami azongiselaki ane : — Ozali kosakana na ngai ! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo !
Luka Mitango 22:29
6
Mitango 22:27
Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye.
Luka Mitango 22:27
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo