1
Mitango 21:8
Mokanda na Bomoi
Yawe alobaki na Moyize : — Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika.
Kokisana
Luka Mitango 21:8
2
Mitango 21:9
Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki.
Luka Mitango 21:9
3
Mitango 21:5
Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »
Luka Mitango 21:5
4
Mitango 21:6
Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki.
Luka Mitango 21:6
5
Mitango 21:7
Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.
Luka Mitango 21:7
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo