1
Ezekieli 34:16
Mokanda na Bomoi
nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.
Kokisana
Luka Ezekieli 34:16
2
Ezekieli 34:12
Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.
Luka Ezekieli 34:12
3
Ezekieli 34:11
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango.
Luka Ezekieli 34:11
4
Ezekieli 34:15
Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe
Luka Ezekieli 34:15
5
Ezekieli 34:31
Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »
Luka Ezekieli 34:31
6
Ezekieli 34:2
« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ?
Luka Ezekieli 34:2
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo