1
Ezekieli 33:11
Mokanda na Bomoi
Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›
Kokisana
Luka Ezekieli 33:11
2
Ezekieli 33:7
Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai.
Luka Ezekieli 33:7
3
Ezekieli 33:9
Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye ; mpe yo, okobikisa bomoi na yo.
Luka Ezekieli 33:9
4
Ezekieli 33:6
Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›
Luka Ezekieli 33:6
5
Ezekieli 33:5
Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.
Luka Ezekieli 33:5
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo