1
Barome 6:23
Mokanda na Bomoi
MNB
Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Comparer
Explorer Barome 6:23
2
Barome 6:14
Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.
Explorer Barome 6:14
3
Barome 6:4
Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
Explorer Barome 6:4
4
Barome 6:13
Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.
Explorer Barome 6:13
5
Barome 6:6
Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.
Explorer Barome 6:6
6
Barome 6:11
Boye bino mpe, bomimona lokola bakufi mpo na lisumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Yesu-Klisto.
Explorer Barome 6:11
7
Barome 6:1-2
Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ? Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?
Explorer Barome 6:1-2
8
Barome 6:16
Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo ?
Explorer Barome 6:16
9
Barome 6:17-18
Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe ! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino, bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.
Explorer Barome 6:17-18
Accueil
Bible
Plans
Vidéos