YouVersion Logo
Search Icon

Mabandela 5

5
1Moye monga monkana mo mabota mambe Adama. O busa bo zalisi Nyambe bato, abakeli o boyuli bombe Nyambe; 2abazalisi bwele na mwene; mpe abayeyi, mpe atomisi lina li bango Bato, o busa bo zalibwi bango. 3Adama abiki mibu monkama na bweli, mpe aboti mwan’o bwele o boyuli bo yeye mome, o lililingi li yeye; mpe atomisi lina li yeye Sete: 4mikolo mimbe Adama, na mbis’e boti yeye Sete, miliki mibu minkama mwambi: mpe aboti bana ba bampele na ba bene. 5Mikolo minco mi biki Adama miliki mibu minkama libwa na mibu bweli: mpe yeye awi.
6Sete abiki mibu monkama na mibu mitano, mpe aboti Enosa: 7Sete, na mbis’e boti yeye Enosa, abiki mibu minkama mwambi na mibu ncambo, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 8mikolo minco mi Sete miliki mibu minkama libwa na mibu zomu na mibale: mpe yeye awi.
9Enosa abiki mibu mobwa, mpe aboti Kenana: 10Enosa, na mbis’e boti yeye Kenana, abiki mibu minkama mwambi na mibu zomu na mitano, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 11mikolo minco mi Enosa miliki mibu minkama libwa na mibu mitano: mpe yeye awi.
12Kenana abiki mibu nyuncambo, mpe aboti Malalele: 13Kenana, na mbis’e boti yeye Malalele, abiki mibu minkama mwambi na mibu nyuminei, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 14mikolo minco mi Kenana miliki mibu minkama libwa na mibu zomu: mpe yeye awi.
15Malalele abiki mibu nyumotoba na mibu mitano, mpe aboti Yelede: 16Malalele, na mbis’e boti yeye Yelede, abiki mibu minkama mwambi na mibu bweli, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 17mikolo minco mi Malalele miliki mibu minkama mwambi na mobwa na mibu mitano: mpe yeye awi.
18Yelede abiki mibu monkama na nyumotoba na mibu mibale, mpe aboti Anoka: 19Yelede, na mbis’e boti yeye Anoka, abiki mibu minkama mwambi, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 20mikolo minco mi Yelede miliki mibu minkama libwa na nyumotoba na mibu mibale: mpe yeye awi.
21Anoka abiki mibu nyumotoba na mibu mitano, mpe aboti Metusela: 22Anoka, e sili yeye nobota Metusela, atambolaki na Nyambe mibu minkama misato, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 23mikolo minco mi Anoka miliki mibu minkama misato na nyumotoba na mibu mitano: 24Anoka atambolaki na Nyambe: mpe aliki nde o kundwa ka, nowela Nyambe amokwi.
25Metusela abiki mibu monkama na loasi na mibu ncambo, mpe aboti Lemeke: 26Metusela, na mbis’e boti yeye Lemeke, abiki mibu minkama ncambo na loasi na mibu mibale, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 27mikolo minco mi Metusela miliki mibu minkama libwa na nyumotoba na mibu libwa: mpe yeye awi.
28Lemeke abiki mibu monkama na loasi na mibu mibale, mpe aboti mwan’o bwele: 29atomisi lina li yeye Noa, bolobak’ete, “Yey’oyo akolobondo na ntin’e lotomo lo biso n’enyingi e maboko ma biso, bikokum’o masotu ma seli Yawe.” 30Lemeke, na mbis’e boti yeye Noa, abiki mibu minkama mitano na mobwa na mibu mitano, mpe aboti bana ba bampele na ba bene: 31mikolo minco mi Lemeke miliki mibu minkama ncambo na nyuncambo na mibu ncambo: mpe yeye awi.
32Noa aliki na mibu minkama mitano: mpe Noa aboti Seme, na Ama, na Yepete.

Currently Selected:

Mabandela 5: BANGI

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in