YouVersion Logo
Search Icon

Zakari 13

13
Kopetolama na masumu
1Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
2Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo. 3Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga. 4Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale. 5Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! › 6Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi ? › Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›
Kobetama ya mobateli bibwele
7Oh mopanga, telema !
Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai !
Tika ete oboma moninga na Ngai, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Beta mobateli bibwele,
mpe bameme ekopalangana.
Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
8Na mokili mobimba, »
elobi Yawe,
« bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato
bakobebisama mpe bakokufa ;
mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato
nde bakotikala na mokili.
9Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto,
nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto
mpe nakomeka bango
ndenge bamekaka wolo na moto ;
bakobelela Kombo na Ngai,
mpe Ngai nakoyanola bango.
Nakoloba na bango :
‹ Bozali bato na Ngai, ›
mpe bango bakoloba :
‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »

Currently Selected:

Zakari 13: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy