YouVersion Logo
Search Icon

Banzembo 93

93
Nzembo 93
Yawe akonzaka mpo na libela na libela
1Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ;
Yawe alati penza lokumu monene
mpe amizingeli na nguya.
Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
2Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ;
seko na seko, ozali.
3Yawe, bibale egangaka !
Bibale etombolaka lokito na yango ;
bibale etombolaka makelele na yango.
4Yawe azali monene makasi,
na bisika ya likolo ;
aleki lokito ya mayi minene,
mpe bambonge milayi ya ebale monene.
5Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ;
bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Currently Selected:

Banzembo 93: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

Video for Banzembo 93