YouVersion Logo
Search Icon

Banzembo 113

113
Nzembo 113
Moko te akokani na Nzambe
1Bokumisa Yawe !
Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ;
bokumisa Yawe !
2Tika ete Kombo ya Yawe epambolama
kobanda sik’oyo kino libela na libela !
3Longwa na este kino na weste,
tika ete Kombo ya Yawe epambolama !
4Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso,
nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.
5Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso,
oyo avandi na Kiti ya Bokonzi
kati na bisika oyo eleki likolo ?
6Agumbamaka mpo na kotala
likolo mpe mokili.
7Wuta na putulu, atombolaka
moto oyo akelela ;
wuta na fulu ya matiti,
abimisaka mobola
8mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,
na bankumu ya bato na Ye.
9Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,
lokola mama ya esengo kati na bana na ye.
Bokumisa Yawe !

Currently Selected:

Banzembo 113: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

Video for Banzembo 113