YouVersion Logo
Search Icon

Luka 5

5
Yesu abengi bayekoli ya liboso
(Mat 4.18-22; Mlk 1.16-20; Yn 1.35-51; 21.1-11)
1Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe. 2Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale ; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango. 3Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
4Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona :
— Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.
5Simona azongiselaki Ye :
— Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.
6Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka. 7Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
8Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki :
— Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !
9Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki. 10Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona.
Bongo Yesu alobaki na Simona :
— Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
11Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
Yesu abikisi moto na maba
(Mat 8.1-13; Mlk 1.40-45)
12Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
13Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki :
— Solo, nalingi yango, koma peto !
Mbala moko, maba esilaki. 14Yesu apesaki ye mitindo :
— Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.
15Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. 16Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.
Yesu abikisi ebosono
(Mat 9.1-8; Mlk 2.1-12)
17Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana ; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli. 18Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi ; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu. 19Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.
20Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki :
— Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami !
21Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa :
— Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?
22Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ? 23Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola ? » 24Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono : « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »
25Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe.
26Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! »
Tembe na tina na Yesu
(Mat 9.9-13; Mlk 2.13-17)
27Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »
28Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.
29Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.
30Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu :
— Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
31Yesu azongiselaki bango :
— Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. 32Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.
(Mat 9.14-17; Mlk 2.18-22)
33Bafarizeo balobaki na Yesu :
— Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli ; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela ?
34Yesu azongiselaki bango :
— Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? 35Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango ; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
36Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo :
— Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala ; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala. 37Moto moko mpe te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala ; soki te, vino ya sika ekopasola bambeki mpe ekosopana, mpe bambeki ekobeba libela. 38Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika. 39Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka : « Vino ya kala eleki kitoko. »

Currently Selected:

Luka 5: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in