Joeli 3
3
Tango Yawe akosopa Molimo na Ye
1Sima na makambo oyo,
nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.
Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola,
mibange na bino bakolota bandoto,
bilenge na bino bakozwa bimoniseli.
2Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi,
nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.
3Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa,
na likolo mpe na mokili :
makila, moto mpe makonzi ya milinga.
4Moyi ekobongwana molili,
mpe sanza ekobongwana makila,
liboso ete mokolo ya Yawe ekoma,
mokolo oyo ya monene mpe ya somo.
5Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ;
pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi,
ekozala na bato oyo bakobika,
kolanda ndenge Yawe alobaki,
mpe bato oyo Yawe akobenga
bakozala kati na bato oyo bakobika.
Currently Selected:
Joeli 3: MNB
Highlight
Share
Copy

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.