YouVersion Logo
Search Icon

Ezayi 47

47
Kokweya ya Babiloni
1Kita mpe vanda na putulu,
Babiloni, mboka kitoko !
Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te,
Babiloni, mboka kitoko !
Moto moko te akobenga yo lisusu
« mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »
2Kamata mabanga oyo banikelaka ble
mpe sala farine,
longola kitambala na yo,
tombola nzambala na yo,
mpe mipende na yo emonana,
bongo katisa bibale !
3Bolumbu na yo ekomonana,
mpe soni na yo ekobombama te.
Nakozongisa mabe na mabe,
mpe moto moko te akopekisa Ngai.
4Mosikoli na biso, Kombo na Ye :
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Mosantu ya Isalaele.
5Vanda kimia, kende na molili,
Babiloni, mboka kitoko,
pamba te bakobenga yo lisusu te
« mwasi mokonzi ya bikolo. »
6Nasilikelaki bato na Ngai,
nasambwisaki libula na Ngai ;
nakabaki bango na maboko na yo,
mpe oyokelaki bango mawa te ;
bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.
7Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! »
Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo
mpe ndenge nini ekosukela.
8Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga,
oyo omesana kovanda na kimia
mpe omilobelaka : « Ngai nde nazali, mosusu azali te.
Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali
mpe nakotikala kokufisa bana te ! »
9Makambo mibale oyo ekokomela yo
mbala moko mpe kaka na mokolo moko :
kozanga bana mpe kokufisa mobali.
Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo,
ata kindoki na yo ezali makasi
mpe bakisi na yo ezali na nguya.
10Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe,
olobaki : « Moto moko te azali komona ngai ! »
Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo
tango ozalaki komilobela : « Ngai nde nazali, mosusu azali te ! »
11Pasi ekokomela yo,
mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ;
mikakatano ekokomela yo
mpe okokoka komibatela te ;
libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
12Kangama kaka na bonganga
mpe na kindoki na yo, oyo omonelaka pasi
wuta bolenge na yo !
Tango mosusu okozwela yango litomba,
tango mosusu okokoka kobangisa bato.
13Batoli nyonso oyo osili kozwa
epai na bango elembisi yo nzoto !
Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka
bikelamu nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu,
mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya,
batelema wana mpe babikisa yo !
14Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka,
matiti oyo moto ekotumba ;
bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te
na nguya ya moto :
Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola
to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.
15Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo,
bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi,
mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango
wuta bolenge na yo.
Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye,
moko te akobikisa yo !

Currently Selected:

Ezayi 47: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in