YouVersion Logo
Search Icon

Abakuki 3

3
Libondeli ya Abakuki
1Libondeli ya Mosakoli Abakuki, na tina na lolenge ya banzembo ya mawa.
2Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo !
Yawe, nabangaki misala na Yo.
Sala yango lisusu na tango na biso !
Sala ete eyebana lisusu na tango na biso !
Kasi ata soki otomboki ndenge nini,
kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.
3Nzambe abimelaki na engumba Temani,
Mosantu abimelaki na ngomba Parani.
Nkembo na Ye ezipaki likolo,
mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.
4Azalaki kongenga lokola moyi,
mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye,
epai wapi nguya na Ye ebombamaka.
5Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye,
mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.
6Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ;
tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala,
bato ya bikolo bakomaki kolenga,
bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki,
mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ;
kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.
7Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi,
mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.
8Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ?
Osopelaki nde miluka kanda na Yo ?
Osilikelaki nde ebale monene
tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda,
likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?
9Obimisaki tolotolo na Yo na ebombelo na yango,
maloba ya bandayi oyo olapaki
ezalaki makonga na Yo.
Ozindisaki mokili kati na bibale.
10Soki bangomba emoni Yo, elengaka ;
mayi etiolaka makasi,
ebale monene etombokaka
mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.
11Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali
mpe makonga ebetaka lokola bakake,
moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.
12Na kanda, otambolaka na mabele ;
mpe na kanda makasi na Yo, onyataka bikolo.
13Obimaka mpo na kokangola bato na Yo
mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo.
Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe,
osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.
14Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko,
tango basoda na ye bazalaki koya na elulu
lokola mopepe mpo na kopanza biso.
Bazalaki kosepela na elikya
ete bakoboma biso na nkuku.
15Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo ;
boye oningisaka mayi minene.
16Tango nayokaki sango oyo,
motema na ngai ekomaki kobeta makasi,
bibebu na ngai ekomaki kolenga,
mikuwa na ngai ekomaki kopola
mpe makolo na ngai ekomaki kolenga.
Kasi nakokanga motema na ngai
mpo na kozela mokolo ya pasi
oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.
17Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te,
nzete ya vino eboti mbuma te,
nzete ya olive eboti mbuma te,
bilanga ebimisi bilei te,
bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango,
mpe bangombe ezali te kati na lopango.
18Kasi ngai nakosepela kati na Yawe
mpe nakotondisama na esengo mingi
kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
19Nkolo Yawe azali makasi na ngai :
akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko,
apesaka ngai makasi ya komata
kino na likolo ya bangomba.
Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.

Currently Selected:

Abakuki 3: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in