YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 9

9
Boyokani ya Nzambe elongo na Noa
1Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. 2Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino. 3Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso. 4Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi. 5Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye. 6Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye. 7Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
8Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali : 9« Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo, 10na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. 11Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
12Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya : 13natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili. 14Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata, 15nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi. 16Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
17Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. »
Bana mibali ya Noa
18Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana. 19Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.
20Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino. 21Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo. 22Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda. 23Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
24Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki. 25Alobaki :
« Tika ete Kanana alakelama mabe,
azala mowumbu ya suka
ya bandeko na ye ! »
26Alobaki lisusu :
« Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama !
Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi !
27Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti !
Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi,
mpe Kanana azala mowumbu na ye ! »
28Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano. 29Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.

Currently Selected:

Ebandeli 9: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in