YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 14

14
Abrami abikisi Loti
1Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi, 2bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari. 3Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo. 4Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye.
5Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; 6bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe. 7Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
8Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi 9mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano. 10Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba. 11Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia. 12Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.
13Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami. 14Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani. 15Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi. 16Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
Melishisedeki apamboli Abrami
17Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
18Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo 19mpe apambolaki Abrami na maloba oyo :
« Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo,
Mokeli ya likolo mpe ya mokili,
apambola Abrami !
20Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama,
Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! »
Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
21Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami :
— Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
22Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome :
— Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, 23ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. » 24Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.

Currently Selected:

Ebandeli 14: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in