YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 11

11
Ndako molayi ya Babeli
1Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko. 2Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
3Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. »
Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. 4Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
5Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga. 6Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! 7Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »
8Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba. 9Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.
Libota ya Semi
10Tala libota ya Semi :
Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi. 11Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
12Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » 13Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi. 15Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
16Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi. 17Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
18Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu. 19Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
20Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi. 21Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
22Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori. 23Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
24Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera. 25Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
26Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
Libota ya Tera
27Tala libota ya Tera :
Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti. 28Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki. 29Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » 30Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te.
31Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
32Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.

Currently Selected:

Ebandeli 11: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in