Ezekieli 45
45
Kokabolama ya mokili
1Tango bokokabola mokili na zeke lokola libula, bokopesa epai na Yawe eteni moko lokola etuka ya bule : ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele nkoto mitano na mokuse. Etuka yango ekozala bule na etando na yango nyonso. 2Bokotika bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi, mpe bametele pene nkama mibale na tuku mitano na mokuse mpo na kotonga Esika ya bule ; bongo bokozingela yango na lopango moko ya polele ya bametele pene tuku mibale na mitano. 3Kati na etuka wana ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse, bokokata eteni ya mabele mpo na Esika ya bule, Esika-Oyo-Eleki-Bule. 4Ekozala eteni ya bule oyo balongoli kati na mokili : ezali ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kati na Esika ya bule mpe bapusanaka pene ya Yawe mpo na kosalela Ye ; ezali kuna nde bakotonga bandako na bango, mpe ekozala esika oyo ebulisami mpo na Esika ya bule.
5Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo ; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda.
6Pembeni ya etuka ya bule, bokokata etando ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse mpo na kotonga engumba ; ekozala mpo na libota mobimba Isalaele.
7Mokambi akozwa mabele oyo ezali kokabola etuka ya bule mpe mabele ya engumba ; mabele yango ekokende eteni moko na ngambo ya weste, mpe eteni mosusu na ngambo ya este. Molayi ya etuka yango ekobanda longwa na ngambo ya weste kino na mondelo ya ngambo ya este oyo etalana na moko ya biteni. 8Etuka yango ekozala libula na ye kati ya Isalaele. Boye, bakambi na Ngai bakonyokola lisusu bato na Ngai te, kasi bakotika mokili na maboko ya lisanga ya Isalaele kolanda mabota na bango.
9Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe. 10Bosengeli te kosalela emekelo kilo ya lokuta, efa#45.10 Efa ezali emekelo kilo ya mbuma. Ezali na bakilo pene tuku mibale ya lokuta to bati#45.10 Bati ezali emekelo ya biloko ya mayi. Ezali na balitele pene tuku mibale ya lokuta. 11Efa mpe bati ekotaka biloko ndenge moko : ekotaka ndambo moko kati na bandambo zomi ya omeri#45.11 Omeri ezali emekelo ya biloko ya mayi. Ekotaka balitele pene nkama mibale na tuku mibale. Bamekaka monene ya efa mpe bati kolanda monene ya omeri. 12Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.
Makabo mpo na mokolo ya bafeti
13Tala biloko oyo bokotia pembeni lokola makabo ya kopesa epai na Yawe : mpo na omeri moko ya ble mpe orje, eteni ya motoba ya efa moko. 14Mobeko mpo na mafuta, bakomeka yango na bati : eteni ya zomi ya omeri moko. 15Mpe bokozwa ntaba moko ya mwasi to meme moko ya mobali kati na bibwele nkama mibale, oyo ekobimela na etonga ya bibwele oyo eliaka matiti kitoko ya Isalaele. Bakosalela yango lokola likabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato, elobi Nkolo Yawe. 16Bato nyonso ya mokili basengeli kolongola likabo yango mpo na mokambi kati na Isalaele. 17Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
18Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule. 19Nganga-Nzambe akozwa ndambo ya makila ya mbeka ya masumu, akotia yango na mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na basonge nyonso minei ya moboko ya etumbelo mpe na mabaya oyo esimbaka ekuke ya lopango ya kati. 20Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi ; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.
21Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire. 22Na mokolo yango, mokambi akopesa ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili. 23Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu. 24Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta ; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta.
25Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana : bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta.
Currently Selected:
Ezekieli 45: MNB
Highlight
Share
Copy

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.