YouVersion Logo
Search Icon

3 Yoane 1

1
Ebandeli ya mokanda
1Ngai mpaka ;
Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.
2Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
Ezaleli malamu ya Gayusi
3Nasepelaki makasi koyoka litatoli na tina na yo, na monoko ya bandeko oyo bayaki wuta epai na yo, ete ozali kokoba kokangama na bosolo, mpe ozali kobika kolanda bosolo yango. 4Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
5Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo. 6Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango. 7Pamba te ezali mpo na kosakola Klisto nde bazali kotambola mpe koboya kozwa lisungi na maboko ya Bapagano. 8Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.
Misala mabe ya Diotrefi
9Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse ; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te. 10Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele ; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.
11Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.
Litatoli mpo na Demetriusi
12Bato nyonso bazali kopesa litatoli ya malamu na tina na Demetriusi, ezala yango moko bosolo ezali mpe kopesa litatoli ya malamu na tina na ye. Biso mpe tozali kopesa litatoli ya malamu na tina na ye, mpe oyebi malamu ete litatoli na biso ezalaka ya solo.
Likanisi ya koya kotala Gayusi
13Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela yo, kasi naboyi kosala yango na nzela ya ekomeli mpe ya mayi na yango. 14Nazali kolikya komona yo kala mingi te, bongo tokosolola malamu.
Mbote ya suka
15Tika ete kimia ezala na yo !
Balingami ya awa bapesi yo mbote. Pesa mpe balingami ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye.

Currently Selected:

3 Yoane 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in