1
Mosakoli 4:9-10
Mokanda na Bomoi
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango. Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye !
Compare
Explore Mosakoli 4:9-10
2
Mosakoli 4:12
Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.
Explore Mosakoli 4:12
3
Mosakoli 4:11
Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto ; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto ?
Explore Mosakoli 4:11
4
Mosakoli 4:6
Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu koleka maboko mibale oyo etondi na misala makasi mpe na kolanda mopepe.
Explore Mosakoli 4:6
5
Mosakoli 4:4
Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Explore Mosakoli 4:4
6
Mosakoli 4:13
Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te
Explore Mosakoli 4:13
Home
Bible
Plans
Videos