1
Malako 11:24
Mokanda na Bomoi
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Compară
Explorează Malako 11:24
2
Malako 11:23
Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.
Explorează Malako 11:23
3
Malako 11:25
Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [
Explorează Malako 11:25
4
Malako 11:22
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bozala na kondima kati na Nzambe.
Explorează Malako 11:22
5
Malako 11:17
Bongo akomaki koteya bango : « Boni, ekomama te : ‹ Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso ? › Kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi ! »
Explorează Malako 11:17
6
Malako 11:9
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Explorează Malako 11:9
7
Malako 11:10
Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Explorează Malako 11:10
Acasă
Biblia
Planuri
Videoclipuri