Matayo 28:18-20

Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili. Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ; bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
Matayo 28:18-20