Matayo 11:28-30
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
Matayo 11:28-30