Luka 6:1-16
Luka 6:1-16 Mokanda na Bomoi (MNB)
Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango. Ndambo ya Bafarizeo batunaki : — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ? Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ? Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango. Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba. Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye. Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso. Bongo Yesu alobaki na bato mosusu : — Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ? Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki. Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu. Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe. Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki : Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ; Matayo, Toma ; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ; Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.