Luka 23:1-25
Luka 23:1-25 Mokanda na Bomoi (MNB)
Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ; mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi ! Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango. Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo. Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa. Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile. Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana. Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi. Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu. Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato. Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami. Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango : — Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye. Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.] Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi ! Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto. Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu. Kasi bakobaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye. Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki. Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ; abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.