Luka 22:66-71
Luka 22:66-71 Mokanda na Bomoi (MNB)
Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango. Balobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ; mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te. Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bango nyonso batunaki : — Ozali Mwana na Nzambe ? Yesu azongisaki : — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe. Bongo balobaki : — Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko.
Kabola
Tanga Luka 22