Luka 10:1-24
Luka 10:1-24 Mokanda na Bomoi (MNB)
Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende. Alobaki na bango : — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. Bokende ! Nazali kotinda bino lokola bampate kati na bambwa ya zamba. Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela. Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo ! » Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye ; soki te, kimia yango ekozongela bino. Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te. Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino, bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. » Kasi tango bokokota na engumba songolo, soki baboyi koyamba bino, bokende na babalabala na yango mpe boloba : « Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. » Nazali koloba na bino penza ya solo : Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome. Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu. Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni. Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai. Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki : — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo ! Yesu azongisaki : — Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali. Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe. Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo. Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala. Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata. Bongo, abalolaki miso na Ye epai ya bayekoli na Ye mpe alobaki na bango moko kaka : — Esengo na bato oyo bazali komona makambo oyo bozali komona ! Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.