Yobo 2:11-13
Yobo 2:11-13 Mokanda na Bomoi (MNB)
Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye. Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito. Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.
Kabola
Tanga Yobo 2