Daniele 8:24-25
Daniele 8:24-25 Mokanda na Bomoi (MNB)
akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala ; akoboma bato ya makasi mpe basantu. Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu ; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.
Kabola
Tanga Daniele 8