Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ? Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana, azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba : « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato ! Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele ! Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo. Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe. Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe ; nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli. Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto, pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.
Tanga Masese 8
Yoka Masese 8
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 8:1-11
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo