Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Masese 7:1-13

Masese 7:1-13 MNB

Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo. Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo. Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo. Loba na Bwanya : « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, » mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai ; » mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta. Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai, namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele. Azalaki koleka na balabala, pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka, mpe akotaki na nzela oyo ekenda kino na ndako ya mwasi ya ndumba. Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki, mpe molili ya butu ekomaki koya. Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ; azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu, makolo na ye evandaka na ndako te, atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka. Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye