Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ? Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi. Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe : Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ; azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele. Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te. Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye : Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te, motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe, motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
Tanga Masese 6
Yoka Masese 6
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 6:9-19
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo