Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Masese 6:20-35

Masese 6:20-35 MNB

Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo. Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo. Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka. Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi, mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya. Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo. Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya. Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te ? Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te ? Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu. Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia. Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye. Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ; akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ; bongo soni na ye ekosila te. Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe ; akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.