mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina, na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili, na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe, na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu. Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali, oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye ; pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi. Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi. Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo. Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ; kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.
Tanga Masese 2
Yoka Masese 2
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 2:12-22
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo