Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema. Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa. Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa. Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi. Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni. Mapamboli ezali na likolo ya moto ya moto ya sembo lokola motole, kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba. Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe. Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi. Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa. Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia. Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe. Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe. Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele. Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
Tanga Masese 10
Yoka Masese 10
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 10:1-14
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo