Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 12

12
Miriami mpe Aron batongi Moyize
1Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi. 2Balobaki :
— Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize ? Alobaki mpe na nzela na biso te ?
Yawe ayokaki bango. 3Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
4Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami :
— Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Bango nyonso misato bakendeki. 5Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso, 6alobaki :
— Boyoka maloba na Ngai !
Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino,
namimonisaka Ngai moko
epai na ye na nzela ya bimoniseli,
nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
7Kasi ezalaka bongo te
mpo na Moyize, mosali na Ngai.
Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.
8Nasololaka na ye elongi na elongi,
na polele penza kasi na masese te.
Amonaka lolenge ya Yawe.
Mpo na nini bozali na somo te
ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
9Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango. 10Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba. 11Bongo Aron alobaki na Moyize :
— Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba ! 12Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !
13Boye, Moyize abelelaki Yawe :
— Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !
14Yawe azongiselaki Moyize :
— Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
15Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki. 16Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.

Currently Selected:

Mitango 12: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo