Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 9:1-17

Luka 9:1-17 MNB

Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ; mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli. Alobaki na bango : — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto. Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba. Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango. Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso. Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, » bamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. » Kasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? » Boye alukaki kokutana na Yesu. Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko. Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto. Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama. Kasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano. Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki. Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato. Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.