Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia. Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi, atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki :
— Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.
Yesu alobaki na ye :
— Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo.
Mofarizeo azongisaki :
— Moteyi, loba yango.
Yesu alobaki :
— Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano. Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ?
Simona azongisaki :
— Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele.
Yesu alobaki na ye :
— Okati malamu !
Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona :
— Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye. Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze. Opakolaki Ngai mafuta te na moto ; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi. Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
Bongo Yesu alobaki na mwasi :
— Masumu na yo elimbisami.
Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango :
— Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ?
Kasi Yesu alobaki na mwasi yango :
— Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !