Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu. Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye. Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki :
— Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino. Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! » Bongo
bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! »
Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »
Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?
Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Yesu alobaki :
— Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala.
Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki :
— Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi mpe balobaki :
— Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. Yesu agangaki na mongongo makasi :
— Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.
Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki :
— Moto oyo azalaki penza sembo !
Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo, mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda. Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango. Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.