Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 22:1-38

Luka 22:1-38 MNB

Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato. Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale. Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango. Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo. Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te. Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika, Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika. Batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tobongisa yango ? Yesu azongiselaki bango : — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota. Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › » Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika. Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika. Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma. Alobaki na bango : — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi, pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe. Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino, pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya. Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino. Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai. Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye. Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango. Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. Yesu alobaki na bango : — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu. Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa. Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa. Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai. Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi, mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele. Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble. Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo. Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo. Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te. Bongo Yesu atunaki bango : — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ? Bazongisaki : — Tozangaki eloko te. Alobaki na bango : — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango ! Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai. Bayekoli balobaki : — Nkolo, tala mipanga mibale. Yesu azongisaki : — Ekoki !

YouVersion esalelaka bacookie mpo na kobongisa experience na yo. Nakosalelaka site na biso, ondimi esaleli ya bacookie ndenge elobami na Politiki ya Bobateli Sekele na biso