Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 20:1-26

Luka 20:1-26 MNB

Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ; balobaki na Ye : — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ? Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai : Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? › Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. » Boye, bazongisaki : — Toyebi te epai wapi ewutaki. Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi. Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga. Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. » Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! » Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te ! Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako ? » Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye. Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato. Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli. Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ? Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango : — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ? Bazongisaki : — Ya Sezare ! Yesu alobaki na bango : — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.