Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 12:49-59

Luka 12:49-59 MNB

Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela. Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango ! Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Kimia te, bokabwani nde. Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana : misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato. Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye. Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato : — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko : « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo. Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka : « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo. Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ? Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ? Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko. Nazali koloba na yo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.